Arche de l’alliance – Sanduku ya mibeko – die Bundeslade

Sima Moise kozua mibeko zomi ya Nzambe na ngomba Sinai, bana ya Isaele baboyaki kotosa Nzambe. Moise asilikaki pe apanzaki mabanga mibale ya mibeko Nzambe apesa ye pona libota ya Isaele. Kasi, Moise asengaki bolimbi pona mabe ya bana Isaele. Nzambe ayokaki pe asengaki basala sanduku ya mibeko yambo ye kolimbisa bango. Bana Isaele bandimaki pe basalaki sanduku ndenge Nzambe asengaki bango. Yango ezalaki molayi pene na 125 cm pe 75 cm monene(Exode 25:10). Sanduku ya mibeko ezalaki yambo na Béthel pe sima ekeyi na Silo epai wapi bana ya mosakoli Eli bazalaki kokengela yango. Ba philistins bayaki bokumndisa bana ya Isaele pe bamemaki sanduku ya mibeko, na mboka na bango(1 Samuel 4:1-11). Kasi, mokonzi David, abundi bitumba pe azongisi sanduku ya mibeko komema yango na Yeluselemi(1 Chroniques 15:29). Yango nde ezalaki moko ya misala ya mokonzi David oyo epesaki Nzambe esengo makasi.

Mokonzi David asengaki Nzambe atonga tempelo pona kobomba sanduku ya mibeko. Kasi Nzambe alobaki na ye ete, atika, muana na ye salomon nde akotonga yango. Mokonzi Salomon atongaki tempelo pe atiaki sanduku ya mibeko na esika ebengami Saint des Saints. Tango mokonzi Nabuchodonosor atumbi tempelo ya Salomon pe amemi bana ya Isaele na bowumbu na Babylone, sanduku ya mibeko ebungi libela. Biblia etalisi biso te esika yango ekenda. Motuna ezali ete: sanduku ya mibeko ezalaki na eloko nini na kati na yango? Eyano ezali : biblia etalisi biso na Hébreux 9 :4 ete na kati ya sanduku ya mibeko, ezalaki na mabanga mibale ya mibeko Nzambe akomaki, Nkawu’a Lulendo ya Aaron, ndeko ya Moise pe mano Nzambe akitisaka na desert. Bana ya Isaele bazalaki ko netola sanduku ya mibeko pamba te ezalaki mosantu. Kasi, na mokanda ya Jérémie 3:16, biblia elobi na biso ete Nzambe alobi na bana Isaele : „na mikolo mikoya, bokolobela lisusu sanduku ya mibeko te. Ekoya na makanisi na bino lisusu te, pe bokosala sanduku mosusu te.

Papa Simon Kimbangu aye epai na biso, kosala alliance ya sika na Nzambe po tozali libota na ye. Yango tomoni ete, ndenge bana ya Isaele bazalaka na bilembo ya kolakisa présence ya Nzambe kati na bango, biso pe lelo, tozali na bilembo ena. Ndakisa, Nzoto Esantu ya Papa Simon Kimbangu oyo efandi na Kilongo(Le Saint des Saints), Nkawu’a Lulendo pe mingi ya bule. Nionso ekutami na Nkamba-Yeluselemi. Nzambe azali esika nionso : na mayi, na mokili, na zamba, na likolo… Kasi, biso ba kimbanguistes tozali na fierté ya kozala na esika oyo tokolakisa na mokili présence ya Nzambe kati na biso ndenge bana Isaele bazalaki kosala. Esika yango ezali mibale te. Bobele moko. Nkamba-Yeluselemi esika efandi Nzambe kati na bato, Papa Simon Kimbangu Kiangani

Pentecôte, Molimo Mosanto, Nkolo Yesu alakaka na bayekoli na ye? Ebongo Papa Simon Kimbangu, ye nani?

 

Toyebi ete Pentecôte ezali fête na biso ba chrétiens to kosepelaka. Yango ekosalemaka 50 jours sima ya bosepeli fête ya pâques. Ndenge totangi na     Jean 14:16, Nkolo Yesu alakaka na bayekoli na ye ete akosenga na Tata atindela bango Mosungi mosusu oyo akozala na bango libela. Motuna ezali: Mosungi yango nde ye wana akitaka na bayekoli sima na sekua ya Nkolo Yesu? Pona kopesa eyano, tokotanga yambo na Luc 24:49. Kuna biblia elobi na biso ete, Nkolo Yesu alobi na bayekoli na ye: "Na kokitisa likolo na bino maye Tata na ngai alakaki bino kasi, esengeli na bino kotikala awa na ville ti bokolata nguya ya likolo". Tomoni Nkolo Yesu sima na sekua na ye, akutanaki yambo na bayekoli mibale na nzela ya Emmaüs, atalisi bango ete azongi na bomoyi. Sima nde a mimonisi na bayekoli na ye nionso ba kutamaki na ville ya Jérusalem. Kuna nde apesaki bango maloba totangi likolo. Motuna ezali: Tata na Nkolo Yesu alakaki bayekoli eloko nini? Soki totangi na sango malamu to nouveau testament, tokomona ete Nkolo Yesu nde alakaka boyeyi ya Mosungi mosusu(Jean 14:16). Kasi Tata Nzambe ye moko  alobaki esika nini na biblia? Soki tokeyi na Jean 1:33, kuna biblia elobi ete: " Ngai nayebaki ye te. Kasi, oyo atindaki ngai pona kobatisa na mayi(Tata Nzambe), ye nde alobi na ngai ete, oyo okomona móto ya Molimo Mosamto likolo na ye, ezali ye nde akoya kobatisa na Molimo". Awa tomoni Jean Baptiste azali kosakola maloba Nzambe apesaki ye na tina na muana ye na Nkolo Yesu ete, sima na ye, moto moko akoya, pe akobatisa bato na mayi te kasi na Molimo. Toyebi ete Nkolo Yesu, sima na ye kozua batisimo, abandaki mosala na ye na bayekoli balandaki ye. Kasi, tomoni esika moko te biblia ekomi ete ye asilaki kopesa batisimo(Jean 4:1-2) yango elimboli biso maye totangi na Jean 3:22 . Ebongo maye totangi likolo, esika nini, mokolo nini Nkolo Yesu apesaki batisimo ya Molimo?

Soki totangi na Actes des Apôtres 1:4-5, biblia ezali koloba ete: "Lokola bazalaki elongo(Nkolo Yesu pe bayekoli na ye), ayebisi bango(Nkolo Yesu) ete bakende mosika ya Jérusalem te kino bazela maye Tata alakaki bango makokisama. Pamba te, Jean Baptiste abatisaki na mayi kasi, bino(bayekoli ya Nkolo Yesu) bokobatisama na Molimo sima ya mikolo moke". Awa tomoni Nkolo Yesu sima na sekua na ye, afandi 40 jours elongo na bayekoli na ye pe azongi na mboka ya Tata. Bayekoli batikalaki na mabondeli pe koyemba ba nzembo ti mokolo nguya ya Molimo Mosanto ekitaki likolo na bango pe balobaki minoko ndenge na ndenge. Mokolo yango nde ebengami pentecôte. Elakisi, mokolo Nkolo Yesu apesaki batisimo ya molimo oyo Tata na ye alakaka na  bayekoli na nzela ya mosakoli Jean Baptiste. Totangi yango na Actes des Apôtres 2:1-4.     

 Pona kosukisa, tokoloba ete, Mokolo ya pentecôte ezali kokokisa elaka ya Tata Nzambe asalaki na bayekoli ya Nkolo Yesu ndenge totangi na Jean 1:33. Kasi na Jean 14:16, kuna biblia etalisi biso malamu ete ezali elaka ya Nkolo Yesu apesaki bayekoli na ye pona kosenga na Tata nde atindela bango Mosungi mosusu oyo akozala na bango libela na libela.

Yango nde biso ba Kimbanguistes tososoli ete Papa Simon Kimbangu azali Molimo Mosantu oyo Nkolo Yesu alakaki.

Motuna ezali ete: pona nini bayekoli ya Nkolo Yesu, bakobaki na kopesa batisomo ya mayi sima bango kobatisama na Molimo? Eyano ezali ete, mingi kati na bayekoli ya Nkolo Yesu bazalaka yambo bayekoli ya Jean Baptiste, ba mesanaka na tradition ya komipetola na mayi(Jean 3:25). Kasi soki totali Apôtre Paul, ye azuaka batisimo ya mayi te. Tokomona ete mosala na ye ezalaki ya koteya sango malamu kasi ya kobatisa na mayi te(1 Corinthiens 1:17).

Na maye totangi likolo, tembe ezali te ete Molimo Mosantu Nkolo Yesu alakaka na bayekoli na ye, azali Nzambe lokola ye kasi nguya ya Molimo Mosanto te oyo ekitaka na bayekoli ya Nkolo Yesu na mokolo ya pentecôte.

Miracle sur le noix de palme

Mokolo moko na mobu 1914, Papa Simon Kimbangu azalaki kotambola elongo na moninga na ye ya bomuana na kombo Kumpenda pe lisusu moko na kombo Budimbu. Tango ba komi na esika oyo nzete ya mbila ezali, yango e kutami na zinga zinga ya Nkamba, Papa Simon Kimbangu a lokoti ndika, a panzi yango pona koliya. Nzoka nde yango ezali ya ko pola. Mbala moko e bebisi elamba ya papa Kumpenda. Na tina ye a sepelaki te komona elamba na ye kobeba na saleté ewuti na ndika ya ko pola, Papa Simon Kimbangu azui liboko na ye pe a pangusi saleté ena na elamba ya papa Kumpenda oyo ezongi ndenga ezalaki. Bongo nde sima Papa Simon Kimbangu abongoli ndika ena ezalaki ya kopola ekomi malamu pe baleyi yango. Papa Simon Kimbangu alobi na papa Kumpenda ete likamuisi oyo nasali na ndika ya kopola ezali lolenge moko Nkolo Yesu abongolaka bato na masumu kokoma petua. Na suka, Papa Simon Kimbangu atalisi ye ete aloba na moto te na tina na likuamuisi ye awuti komona.

Culte ya mokolo mua dimanche 12.08.2018.

MOTEYI: Diacre Paul Luyengo Ndombaxi

Psaumes 12:1-8

Deutéronome 5:1-21

Esdras 9:1-13

Na kombo ya Tata Muana pe Molimo Mosanto,

na mateya na ye, papa diacre Luyengo alobeli na tina na mibeko Nzambe apesaka 

na bana ya Isaele. Ndenge moko biso lelo tozali kozua mibeko ya Lukutakanu ya

avril 2018. Esengeli na biso kotosa pe kosalela yango lolenge Esdras alandi mibeko

ya Nzambe pe abuakaki ata moko te.

Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Mosanto.

Amen

 

 

 

DER KATECHISMUS DER KIMBANGUISTEN

Autor: Papa Dialungana Kiangani Salomon

 

Abteilung Verkündung des Evangeliums und Mission von der Kirche

 

Wir möchten betonen dass ein Mensch in die Lehrzeit investieren muss, wenn er sich Wissen aneignen möchten. Wenn man sich darauf nicht einlässt, kann man weder Wissen erlangen noch seine Intelligenz entwickeln.

Daher ist uns Zeit gegeben worden, um das Wort Gottes zu  lernen. Taufanwärter oder Christen, wir müssen das Wort Gottes kennen, und um es kennen zu lernen müssen wir es aufnehmen.

"Gottesfurcht ist der Anfang der Weisheit"

Erster Teil:

Christologische Chronologie(in Bearbeitung)

Zweiter Teil:

Die Lehre der heiligen Schrift(in Bearbeitung)

Dritter Teil:

Die Lehre des Kimbanguismus

Download in PDF

Na 1921, sima ya bo kangami ya Papa Simon Kimbangu, baye balandaki ye, mingi kati na bango, bakendaki na rélégation na ba mboka misika. Ye moko Papa Simon Kimbangu ba colons belges ba memaka ye na Elisabethville oyo lelo ebengami Lubumbashi. Basusu ba bakendaki na mboka lokola Lowa na province orientale, lelo ebengami Tshopo. Ndenge biso banso toyebi, na mokolo mua le 12 octobre 1951, Papa Simon Kimbangu atikaki mokili pona kolata Nzoto ya Molimo nde tobengi, liwa . Banda tango wana, mingi baye balandaki ye, ba kabuanaki na biteni mibale lokola ndenge ezalaki na bokangami na ye na 1921: -Bayike balongalaki elikya na bango ete Papa Simon kimbangu ayaki kobikisa biso bana ya Kongo pe poso moindo. Bakomaki kosambela to pe bakotaki na mangomba misusu. -Basusu batelemaki na kondima na bango ete ata ko Papa Simon Kimbangu akabuani na bango na bonzoto, kasi na molimo azali tango inso kobundela bango po babima na bowumbu ya colonisation. Bango nde baye l’Etat colonial belge akangaki pe amemaki mosika na ba mboka na bango. Ezalaki na motango ya 150.000 bato ba bengamaki ba kakangami to pe ba rélégués oyo l’Etat colonial belge atindaki bipayi na bipayi lokola na Boma, Tshiela, Mbanza Ngungu Kasi pe mingi bakendaki mosika na mboka ndakisa : Kasai, Equateur, Province Orientale, Kivu pe bongo… Papa Simon Kimbangu, azalaki komonana na bakangami mingi, bipayi inso bazalki. Kasi, baye bakendaki na mboka ya Lowa nde bazuaki ngolu ya kofanda na ye kobanda mokolo mua le 29 juillet 1952 ti le 05 août 1952. A mimonisaki na elongi mosusu pe kombo ya Joseph Ntumba pamba te asilaki kotika mokili na bo nzoto na le 12 octobre 1951 ndenge banso toyebi. Pona nini tokolobela kaka Lowa kasi ba mboka misusu te ? Eyano ezali ete, pamba te, kuna nde Papa Simon Kimbangu akendaki kozua mokanda na ye mindele ba mobotolaka na 1921 pe ba bombaka yango mosika. Na yango, azuaka bilenge basi zomi na mibale(12) amemaka na mboka Ongoka na province ya Maniema pona bozui mokanda ena ebombamaka na sanduku epai ya l’Etat colonial belge. Kati na bilenge basi ena, tokotanga ndakisa mama Elisabeth Nkenge, mama Cathérine Diamoneka pe pe mama Christine Matondo, baye basalaki témoignages na tina likambo monene ya bosekui ya Papa Simon Kimbangu. Kuna nde epai Papa Simon Kimbangu ayebisaki bango été bozali kokamua na ntina na biloko mindele basala lokola ba avions, mituka, ba trains ?... Biloko wana ezali ya biso. Tata Nzambe apesa bango seulement un quart ya mayele. Kasi biso, tozali na trois quart. Tango ekokoka maye manso makomonana.

    

         Mama Cathérine Diamoneka                                   Mama Rachelle Maleka                                    Mama Elisabeth Nkenge

Baye mingi bazali ba kimbanguistes te, ba koyebaka te ete na 1920, Papa Simon Kimbangu afandaki 

na mboka Kinshasa e bengamaka Léopoldville, na bala bala Kitega, na commune ya Kinshasa. Baye  bazalaki 

na ye elongo na tango wana basili kotika biso na mibu mileki, lokola papa Samuel Diakanua. 

Département ya évangélisation ya paroisse Stuttgart ebongisi témoignage monene na tina ya likambo ya 

Papa Simon Kimbangu.

Matthieu na Lévi


  Matthieu na Lévi bazali bato babale to ezali kaka lisolo moko?

Totangaka na mokanda ya Tata Nzambe ete Matthieu azalaki moyuda, muana ya Alafai na libota ya Levi, na mboka Capernaum. Azalaki liboso mokongoli ya mpaku. Abengamaki epai ya Nkolo Yesu po azala moyekoli na ye. Toyebi biso banso ete Matai akomaki sango malamu ya Matai; akomaki yango na bandeko na ye Bayuda po bandima ete Yesu azali Masiya, Mwana na Nzambe. Kasi mingi komitunaka pona nini na Mikanda ya sango malamu ya Marko pe Luka bango bakomaki ete Yezu amoni mofutisi-mpaku moko, kombo na ye Levi, afandi na Bureau na ye. Yesu alobi na ye: “Landa ngai“. Levi atelemi, atiki biloko nionso pe alandi ye. Tanga na mokanda ya Marko 2:13-17 pe Luka 5:27-28.
Motuna: Matthieu na Levi bazali bato babale to ezali lisolo moko? Eyano: Luka alakisi biso ete tango Nkolo yesu abengaki Levi, yango ezalaki penza kombo na ye kasi tango abonguami pe akomaki moyekoli ya Nkolo yesu, bakomaki kobenga ye na kombo ya Matthieu. Yango wana, tozali na ndakisa ya Pape Ratzinger, oyo abengamaki na kombo ya Benoît XVI ndenge ekozalaka tradition na biso ba chrétiens kozala na nom pe na prénom. Conclusion: Levi ezali solo kombo ya Matthieu, bazali bato babale te.   Révérend Rafael Bantomessa Pasteur Chargé de l'évangélisation Paroisse Stuttgart